Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

 

 

Sujet : Pourquoi les astronautes de Apollo 11 sont-ils venus à Kin?

http://www.mbokamosika.com/article-pourquoi-les-astronautes-d-apollo-11-sont-

 

Ndeko Kiese,

 

Na eyano ya motuna ya ndeko Kais Kayisala Mangubu, ndenge obengi ngai, ba astronautes Américains  bayaki na Kinshasa na mokolo mua 22 octobre 1969 mpe ba fandi tee na mokolo mua 25 octobre 1969. Koya na bango ezalaki en guise ya remerciement ya Administration Lyndon Johnson na Président Joseph-Désiré  Mobutu mpo na participation ya R.D. Congo na projet ya Apollo XI. Au fait, ekolo na biso nde epsaki titane oyo esungaki na kosala bouclier thermique ablatif (ezali protection ya vaisseau na exposition ya très haute température ewuti na vitesse makasi ezali kozongela tango yango ezali kozonga na mable) ya vaisseau spatial Apollo XI.

Na Afrique mobimba, ekolo na biso ezalaki le seul pays oyo ba astronautes wana ba visitaki : Neil Armstrong (Commandant ya mission Apollo XI), Michael Collins (pilote ya module ya commande) na Edwin Aldrin (pilote ya module lunaire). Bayaki na balongani na bango. Mobembo nabango na sanza ezalaki elakisamaki en direct na Centre Culturel Américain ya Kinshasa na mokolo mua 16 juillet 1969 na 14h.32, heure ya Kinshasa.

Na visite iye, Neil Armstrong apesaki Président Mobutu caillou lunaire (libanga ewuti na sanza). Président Mobutu a décoraki ba Astronautes banso basato na médaille ya Ordre national du Léopard mpe ba longani na bango, bazuaki décoration ya Ordre national ya République Démocratique du Congo.

Visite ya ba astronautes esalaki que Franco abimisa danse Apollo mpe bokono bua poti ebandaki kovimbisa misu, ebengama Apollo mpo misusu ebandaki kokoma minene na kotiola lokola casque ya astronaute ya mission Apollo. Na visite iye

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

 

…………………………………………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

 Sujet : Histoire de l’aviation militaire  congolaise (2)

http://www.mbokamosika.com/article-l-histoire-de-l-aviation-militaire-congolaise-2-67714791.html

 

Ndeko Deo Mosali,

 

Natangi biyano bia yo mpe nakumisi kobakisa na yo na boyebi bua ngai. Lisolo oyo ya accident ya C130 commande na Colonel Mbo, tokobanda kozongela yango mbala na mbala mpo batu misusu tee na lelo oyo balobaka que Colonel Mbo asalakai erreur na arret d’urgence ya moteur oyo ezalaki rupture ya alimentation te pendant que ye moko Colonel Mbo a insistaki mbala na mbala que a perdre subitement deuxième moteur mpe yango  ekomaki difficile mpo na ko maintenir équilibre ya avion.

Tolobela yango lisusu que panique ezalaki na cockpit mpe temps ya réaction ezalaki muke associer na faible altitude ya avion mpe accident eyelaki ye ezalaki faute na ye na eloko ata moko te.…Justement na oyo etali vol wana, kokamua te soki Colonel makasi azalaki effacer. Ba pratiques wana ezalaki courantes na F.A.ZA. mpe vol lokola wana, etondi na biloko esengelaki ekende Gbado-Lite na feti mpe eyebani malamu que kuna efutaka bien…ba bonnes relations na ba konzi nde ebandaki kosala affaire !!!

Ata yo moko, pilote oyo ayebaka cargaison na ye te, azalaka te. Tobosana te que maintenance ya ba avions ya F.A.ZA. sima ya rupture ya coopération militaire na ba mindele, ezalaki lisusu na niveau te, na yango kobakisa na ba prises de risque oyo mikonzi na biso babandaki kolinga ko prendre en compte te !!!

Lelo oyo, ebongi te tobosana que Colonel Mbo azalaki mutu lokola batu banso mpe azalaki kaka na baye babandaki kolinga ye te. Ba misusu babandaki kosepela te na ensemble ya carrière glorieuse  na ye mpe ba profitaki na likama liyelaki ye mpo na koloba n’importe que quoi comme si ezalaki mbala ya liboso a voler na avion wana. Azali un très grand pilote militaire ya ekolo na biso mpe azali ko mériter naturellement kombo na ye etikala na livre d’Or ya ba meilleurs pilotes ya R.D.Congo.

Mpo na syndrome ya hypoxie ezali eloko oyo chasseur azali exposer na yango. Soki ozali amateur ya sport ya montagne ou soki osala randonner na montagne, na altitude, yambo ya kokende, guide akoteyaka sur l’hypoxie. Amateur ya sport ya montagne okoki kobunga notion wana te mpo ezali likambo ekoki koyela mutu na altitude. Yango wana, esengeli koyeba ba signes annonciateurs na yango mpo na kozua ba précaution na temps. Ezala mpo na chasseur ou pilote ya avion, parachutiste, athlète na altitude, etc.

Na oyo etali ba vols na base altitude, soki rase-motte ezali basse altitude te, je pense que ozlai d’accord na ngai que  relief ya basse altitude ya Belgique, ezali ndenge moko te na oyo ya Kivu par exemple. Soki boye, base altitude na Belgique, forcement ekoki kozala base altitude ya Kivu te mpo mingi ba vols na altitude wana, ba avions na bango e s’écrasa na Kivu.

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

App

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article