Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

A propos ya Quartier Lemba na Kinshasa, soki bozali koloba makambo etali Lemba, il faut boyoka version na ngai quoi, ngai pe nazalaki quoi.
Bon, Lemba de nature ezalaki quartier moko calme, puisque ba habitants na yango bazalaki ba jeunes cadres ya Léo, na ko revenir wana lisusu te puisque ba masta mingi basi babeti lisolo yango.
Nalingi kaka na ajouter eloko moko, Vieux Senghor Gizenga, petit-frère ya ancien Premier-ministre Antoine Gizenga Fundji, ye pe azalaki kofanda na Lemba, pembeni ya école St-Théophile, oyo ba Koffi Olomide, Kakoko Etepe... batangaki na C.O.
Vieux Senghor alingaki bongo encadrement ya ba jeunes ya Lemba, à travers Sport, plus précisément na football, afondaki équipe ya foot Senghor, par là tomonaki quelques bills, tels que Randolph Scoth, Kodi, Mépé, Shérif... mais bango bazalaki ba bills ya bitumba to ba eboulements te, bazalaki plutôt po na protection ya équipe, puisque ba matches mingi ezalaki kobetama en dehors ya Lemba, na tangu wana Lemba ezalaki commune te, kasi ezalaki Zone annexe.
Pourquoi Lemba ezalaki na ba NZAZI ya kitoko, phenomène yango ewuta, boyoka lisolo, après Lipanda na le 30 juin 1960, Empereur Kalonji Albert, asali Empire na ye na Bakwanga na Kasaï, rébellion wana esalaki ete, ba congolais ya Kasaï bakima bitumba, Onu amemaki bango na Léo, lokola na Lemba ba ndaku ya Lemba Terminus ezalaki vides et inachevées, bayaki kotiya ba "réfugiés" oyo na Lemba, bino moko boyebi, bandeko na biso ya Kasaï, particularité na bango ezali TEINT CLAIR, yango nde ezali origine ya mythologie ke na Lemba BASI YA KITOKO.
Après Lemba pe abandaki kolamuka moke-moke, Ba étudiants ya Lovanium bapesaki bango ba ndaku na Lemba, puis ba étudiants ya ENDA lisusu bazuaki bandako na Lemba. Camp ya Gendarmerie na terrain ya foot avant basala Camp-Tshombe qui deviendra par la suite camp-Mobutu, bino moko boyebi ke na monde, ba étudiants bazalaki batu ya "nzunzu", le regretté Max Idi Mane Mongali, étudiant et musicien à Bruxelles, pendant les vacances abandaki kofanda na Lemba. Oyo ezali histoire ya Lemba entre 1960-70

MONDONGO

Mon Frère Mondongo, tu m´as rappelé pas mal de souvenirs, j´avais à peine 11 ans quand on est venu habiter à Lemba en 1961, je revois la jeunesse de nos vieux Senghor, Raph Longangu (président
d´Imana), Kapia (propriétaire du bar Kapia), Méfé (fondateur du terrain Méfé), Roger (encadreur de jeunes au terrain Méfé), Chic-chic (propriétaire du bar La Soirée), El-Bébé d´or (dit
Lobebedor).et tant d´autres et même Jean Bokelo Isenge, d´ailleurs ce dernier avait immortasisé ce que tu as dit à propos de nos compatriotes du Kasaï, dans une de ses chansons mwambe, suivez :
Ozala molayi, balobi nzete ya drapeau
Ozala mokuse, balobi nzete ya likemba
Ozala monene, balobi nzoku na zamba
Ozala moyindo, balobi mbula ekoya
Ozala motane, balobi yo Moluba
foti ya nzambe oo  oo mama aaa
Les bills de Lemba par contre n´étaient pas des délinquants comme dans les vieux quartiers de Léo : Kazamar, Santa Fé, Santa Cuba, Mangembo, FW, Singa kwanga, N´djili (terre sans loi), Onu
britanique... Ils n´habitaient pas chez leurs parents biologiques, mais avaient rejoint leurs grand-frères ou oncles, puisque ces derniers leurs propres enfants venaient de naître. je peux citer
d´autres bills, Molitani Frank, Gordon, Agumé, Etienne
Franchement, mon frère Mondongo, je suis ravi, quand je vois mes propres enfants, je pense à moi-même.
ZAKAMA.

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M

Pona lisolo ya Lemba et pona kombo ya Mondongo, nalali nalamuki Mondongo ezalaki Mondongo tembe pilipili ekasi ya bankoko et puis orchestre mosusu ezalaka na Lemba Sele sele na Apate balabala ya
ba vieux na nga Bob Lissasi Leader na bango Tapo ley depuis aya mikili orchestre pe ekufaki la plus part ya ba ndoulistes ya mouv wana bazalaki bana Commune ya Ngaba Mondongo ekufa pe depuis
disparition ya Leader na bango Castro,pona rectification guitariste ya Mondongo kombo na ye tex véron au lieu de néron ye azali pe l'un de bato oyo balakisa Koffi lindanda na ebandeli ya mosala
et puis Koffi abeta pe guitare na Selesele tjrs na ebandeli ya mosala oyo ezali tjrs na époque ya ba Charlotte lokombe na ba tata muasi soeur ya Général kulufa ou Nkulufa (bo corrigé) kolo au
Pépé club wana tjrs époque ya phono oyo ezali langage na nga boyiba te tokoki kosolola lisolo ya Lemba te sans tolobela Koffi po azali lokumu ya Lemba pe ya Rdc. ba ndoulistes mosusu pe bazalaka
tel ke Avelino abeta guitare na Mbonge ou Concorde muro ou somtin(bo Corrigé) azali n'Angola ye na vieux Proteck prés ya Concorde ya liboso  kulutu Proteck yaya na ya Néné oyo afandi na
Lausanne na Suisse l'un des grands producteurs na SUISSE oyo abetisa ZAIKO mbala liboso na 83 pe na Wenge musica mbala liboso na Suisse  Concorde bazalaki na danseur na bango Muamba ye
afanda na secteur ya ba défunt  vieux Bickjhon(bo corrigé) masta ya ba vieux Proteck ba vieux Morais,ba vieux Morgan b'ancien batélier tango wana Lemba elengi

Répondre
M

Nasepeli ya trop namoni lisolo ya Lemba mais namoni kombo mibale Mondongo na Zakama Mundial yango nalingi nayeba soki ezali kombo pona net ou bien? po ba kombo wana ezali ya deux groupes
musicales ya Lemba na époque ya kala,Zakama bazalaki plus agés ke Mondongo, ba groupes misusu ezalaki nango aux même moment ou après tels ke Mbonge na sima St Théo avec Vince Toussaint Id yaya na
Ghabin mais Tembo te po Tembo ye jazz,crack,lisano,likofi pe ezali soki olingi okweya na kudiantu genre ya vieux na biso Buffalo na nzango etc.Cosmos côté ya vieux Méfé ba Louison
guitare,Paclas(bo corrigé soki esengami,Concorde quartier ya ba vieux Proteck(bo corrigé) ba ndoulistes tels ke ba Tity Danis,Petit Thoms etc..mais Concorde ekomaki mibale to misato po moko
nayebi ekomaki Concorde somtin (bo corrigé) ti tango ekomaki ba groupes tel ke Esakala galopé esalamaka ya ba Miroi(bo corrigé) basalaka sortie na bar la chosie(bo corrigé) na rond-point
super-Lemba ngambo ya quartier 3 Avenue Kianza balabala avant ou après le Tremplin ba tango wana.Zakama ezalaki na ba vieux Ricos abetaki sima na Bella Bella ou na ba Lipua-Lipua(bo corrigé) mais
ngingo moko il faut elela na ba masolo ya tonton Ricos,ba vieux Teddy Kinsala avant abendana Bela,vieux Ngunza miyembe vieux ya accompa ya Mondongo pilipili ekasi,ba vieux Papa Frigo na drum(bo
corrigé)mais Mondogo pilipili ekasi ezalaki na Leader na bango Ngubi Castro Charles Emmanuel Castro,Castriana,Kakos,nkanka Manu kombo ya ndoyi na ye noko ya tata na ye.Ezalaki orchestre ya ba
masta basilisi classe na écomoraph la plus part ba misusu basilisaki na école supéruere ya finance lokola Médard accompa et majorité bazalaki kosala na BCC ekomaki BCZ donc siège ya kala ba
nzinga-nzinga ya beach ngobila ya kala et ba masta ya quartier tels ke ba vieux Ambara yaya na Nyam René Nyamalembe pur ngai ba masta bazali ya trop,JP na drum,vieux Césare na solo,Tex Neron na
guitare,bassiste un employé jeune cadre muana Ndjili,ba vieux Emile ya Ndjili cousin ya ba familles Ambua ke un losako na passage po Emile ya Lemba yaya na ba masta Henri-Paul nabenga ye
Henri-Spack etje suis le seul nabenga ye kombo wana ata tango azalaka kobenga ngai depuis state ba 3 heures du mat or yo sengele kala mingi te ngongingo mais ndenge ezalaki ye na décallage
horaire lisolo kitoko masta atika biso na oyo bayebaki te akufa na state pona ba sango ya bien il faut leki na ye Dringchang(bo corrigé) Adrien ou janvier Ambua, vuiex JP Ambua pe atika biso,pona
Mondongo ba vieux Mac lolo miyembe yaya na Odon mbiti ngbuendi( bo corrigé),ba vieux Teddy ya Lemba foire na Lufuku ou Lumene palais na bango ezali entre deux blocs ya ba ndako ya fonds d'avance
miyembe avant akende service mili,Castriana le leader azalaki na Lutshatsha 119/71 balabala entre Lombo na Lukwila club Léopard ba ndako ya étage ya bato mibale mibale.Tango ya kala na Lemba na
épque wana ba ndoule ezalaki kozala kaka ba deux groupes bobeta alors Mondongo pilipili ekasi akutana na groupes lokola ba Stukas,Machi,Mbonge,Concorde,Zaiko tango babetaka nzembo na bango
feu-rouge boyeba ke amen Castriana akufa depuis 1975 à l'âge de 23 ans suite d'un cancer soki tozongi sima esengaki ke opération balongoli mâchoire alors soki okokoka lisusu ko mâché te ekosenga
omelaka kaka na suka perte de poids,Mondongo histoire botuna vieux Garry yaya na Maurice Mukoka Mogarryna nayebi ke azali na France po ye nde prés ayebi ebele pona kozua vieux wana tuna sango na
Maurice.Samy Matobo,Mario Toko Lelo,Ghabin Tembo na époque wana Mondongo apilaka na ye kaka ata abeti na Matete na Confiance bar somo et pius bana balandaka bango mibali to basi, ba bar ya ba
ndoule ezalaki moko ya kala ezalaki na carrefour quartier ya ba Ndala édition VéVé na Lemba ezalaki pas loin ezalaki abandonner toyebi tina te mais ba ndoule ebetama kuna ba négros-succès,ba Los
angelès et puis tout Lemba,au Pépé club pas loin na camp zeozeo pas loin ya ba familles Massombo quartier santos ba vieux batterie,Jacky Popson,ode roddy, Akodo akodon Claude,Freddy,la
source leka terminus fronta-fronta na sukation ba ndako ya fons d'avance(bo corrigé),Bantou bar Lubudi secteur ya Bukanganda okokuta bato ya bien molato na likofi etambolaka nzela moko na
BK,Jamais kolonga pas loin na église catholique St Augustin pas loin ba ndako ya ba sango,régiedeso,école ya ba mamelo,Café Jéa na Kikimi na coin ekangama na chez ba Samba balabala ya vieux na
ngai Nitu mambo legrand ba ekala misusu pe ezalaka mais ndule blinblin ezalaki te lokola ba léopard,el bébéd'or(bocorrigé) ba flamigo pe bebo,loposo,lomponko,lualaba,dalu,chez nicole na wenze oyo
tout ezali époque ya ba charlotte lokombe na ba vieux tous ya senghor,ba santos,bana véa,dragon wa gina abeta wana tjrs époque ya ba CL na ndenge ya lisano,Castriana pe abeta na dragon,nabosanaki
lisusu bato babeta na Concorde Magirus,Blaise moyembi jerk yaya na didiero un gd sage ke bolingi bobunda alobi bokota école athénée de Lemba botikala mutaka po soki moleki amoni bozobunda mutaka
akopusana te akabola po akoloba to akokanisa ke bato ya maboma bazobunda alors zala na konzo po bitumba bakabolaka te zala mpe na pema nalingaki pe nasilisa lisolo te sans nalobela WekamuWeka
Roger Welkard yaya na Lucien sage de sage c'est le gozima de mitanko c'est le café de mikimiki  manager mokala ayiyo, bakenda Kwamouth na makolo bakoma balanda makaku na songue ya nzete
basuka vieux servos azuaka yango afignolé esali kaka ndenge esalaki mais kolokolo idolo Welkard,soki odévéloppa naye te nionso alobaki elakisi nini? na dévéloppa na Welkard,na ya depson nganga
lokuta soki ochoqué na palais mona ye trace eyebana te na palais.Mazuka BJ ma mbongo na Paris ba tango eleka cerveau elia b'enseignements yango esali ke namona namona namona pona lisolo ya Lemba
mbala sima nazali muana ya époque ya phono pardon bozua nga yango te po babengi nga lisusu sans un iota de graisse,anti-cycle nazali muana ya Lemba sukasuka Castro leader azali yaya na
Tschoupy Modja na au bout du lac léman dans la ville de Calvin swiss citizen au pays ya drapeau à la croix blanche

Répondre
C

Jean Wobo,
napesi yo mbote, natangi makomi na yo, nazui vraiment un cas de conscience, mpo na tango na biso, tozalaki koloba, ah tala azali na moyindo ya ngolo, azali na motane ya madesu, teint na biso
ba congolais ezalaki différent na ba Africains misusu, soki ozali noir trop, tokobenga yo Ghana, puisque ba soda ya ba ghanéens oyo bayaka na compte ya Onu bazalaki moyindo makasi. mpo nafungola yo
boule, tala kaka soki motu awuti mikili, tala teint na ye ndenge ezalaka, lokola mua ko brillé moke, teint wana nde biso ba congolais tozalaki na yango vers les années 1960. Ndenge olobi, emonani
ete, sikoyo  bokomi na moyindo ya Monganza to ya Mongusu likolo ya ba grand nzala. sujet oyo ezali tellement complexe, moyen na répondre yo malamu ezali te. Soki moyen ezali Messager atiya
yango à la une. où allons-nous, même loposo na biso ekomi en voie de disparition.

Répondre
J

Papa Mondongo na Papa Zakama,
Ngai nazali muana na bino ya Lemba, sikoyo nazali na 19 ans, nabotami na 1990, na Lemba kaka, nakoli na Lemba kaka, natangi na Lemba kaka.
Ezali esengo ya koyeba histoire ya commune na biso, nalingi natuna boye, ndenge bowuti koloba, na tangu na bino Lemba ezalaki na Basi ya kitoko, ya pembe, bayemba yango na ba nzembo na Papa
Bokelo.
Bobakisi lisusu basi yango bawutaka mingi na Kasaï suite na ba rébellions ya mboka na biso.
Jour moko tozalaki kolanda ba théatre ya kala, Mama Nzita azalaki boyi epayi ya Papa Nsengo, tangu batuni ye, mama yo ozalaka na bana te, mbala moko abandi kolela, alobi ye abotaki bana na Mundele,
bongo mundele yango akima na bana na Poto.
Lokola grande-soeur na biso azalaki kobima na Blanc moko, mère a profité abandi koloba na grande-soeur, yo wana ozali kobima na mundele ya batu, oyebaka loposo wana elingaka nzala te, biso awa
tozali na biso na mbongo ya kobokola muana ya métis te. après wana, ekomi discussion entre mère na grande-soeur, yo moko oyebi ndenge ba soeur bazalaka monoko molayi envers ba mère.
Après Mére ayebisi biso, na tangu na bango na Lemba ba ressortissants mingi ya Kasaï balekaki ba métis na pembe.
Motuna na ngai ezali boye, lelo ba congolais nionso bakoma noir, ya pembe ekoma ya kotanga, nakendeki nga na ba masta na ngai na province ya Kasaï, na cadre ya ba coop, kasi kuna pe batu tout
bazalaki kaka noir, yango nazali kotuna bino ba Papa na ngai, phénomène yango ewuti wapi. Ezali souffrance ya nzala oyo tozali na yango na Congo ou bien nini. Po soki nalandi maloba ya mère na
biso, tangu alobaki na grande-soeur : biso tozali na biso na mbongo ya kobokola muana ya mundele te, loposo wana ekokaka nzala te. Natuni motuna oyo na cadre ya histoire ya Lemba.

Répondre
J

Merci Freres Mondongo et Zakama pona ba souvenirs ya Lemba entre 1960 et 1970.
Nayebaka te ke ba REFUGIES ya Guerre ya Sud-Kasai bazalaki loger na LEMBA Terminus na 1961. C'est normal, je n'avais meme pas deux ans ba mbula wana.
En fait, ba ndaku vide ya Lemba-Terminus, namonaka yango neti na ndoto. Heure petit-frere abotamaki na 1962 na na ngomba ya Lovanium, tolekanaki na VW ya Pere ba nzinga ya Terminus avant tokende
Lovanium. Il se pourrait meme que avant nalekana na kati ya VW ya Vieux ba cote ya Lemba Terminus. Donc, j'ai en memoire cette vue ya ba ndako ya sika, mais vide, ya Lemba Terminus.

Mua version na ngai ezali ya Lemba-Foire. Comme j'avais moins de 5 ans, nayebaki bien te ba masolo ya ba quartiers misusu. Sinon nayebaki Gordon-Bill. Randolph kutu ezalaki premier surnom na ngai
ya ki-Bill (ezalaki lokola lisano)na Lemba ya ba mbula 1965.

JP Bouck

Répondre
Z

Mon Frère Mondongo, tu m´as rappelé pas mal de souvenirs, j´avais à peine 11 ans quand on est venu habiter à Lemba en 1961, je revois la jeunesse de nos vieux Senghor, Raph Longangu (président
d´Imana), Kapia (propriétaire du bar Kapia), Méfé (fondateur du terrain Méfé), Roger (encadreur de jeunes au terrain Méfé), Chic-chic (propriétaire du bar La Soirée), El-Bébé d´or (dit
Lobebedor).et tant d´autres et même Jean Bokelo Isenge, d´ailleurs ce dernier avait immortasisé ce que tu as dit à propos de nos compatriotes du Kasaï, dans une de ses chansons mwambe, suivez :
Ozala molayi, balobi nzete ya drapeau
Ozala mokuse, balobi nzete ya likemba
Ozala monene, balobi nzoku na zamba
Ozala moyindo, balobi mbula ekoya
Ozala motane, balobi yo Moluba
foti ya nzambe oo  oo mama aaa
Les bills de Lemba par contre n´étaient pas des délinquants comme dans les vieux quartiers de Léo : Kazamar, Santa Fé, Santa Cuba, Mangembo, FW, Singa kwanga, N´djili (terre sans loi), Onu
britanique... Ils n´habitaient pas chez leurs parents biologiques, mais avaient rejoint leurs grand-frères ou oncles, puisque ces derniers leurs propres enfants venaient de naître. je peux citer
d´autres bills, Molitani Frank, Gordon, Agumé, Etienne
Franchement, mon frère Mondongo, je suis ravi, quand je vois mes propres enfants, je pense à moi-même.
ZAKAMA.

Répondre