Dimanche 13 septembre 2009
7
13
/09
/2009
13:18
Notre ami Ndombasi pose des questions aux différents membres de Mbokamosika.Mais chacun de nous peut y répondre,
même ceux auxquels les questions ne sont pas destinées.
NB.Nous signalons toutefois à Mr Ndombasi que certaines de ses interrogations ont déjà été abordées, comme le cas de Wallace et Boudha par exemple.
Kandolo merci mingi,ozali vrai biblioteque.Tomesana kotanga makomi nayo oyo etali politique,sport na musique.Nazali sur que na oyo etali makambo mosusu, yo oyebi yango malamu,na batu oyo basala
histoire ya Kin,na ndenge ya malamu to ya mabe,batu oyo bakende sango.Luka opesa ngai eyano na mituna oyo:
Nani azalaki Mbelekete?
Ebongo Mivé John? Maitre Bowa?
Kobosana kobeta te lisolo ya Maitre Tshiwara.
Groupe ya Wallace na Bhuda basalaka nini pona bayebana na motindo oyo toyebi.
Mutu ya liboma moko na kombo ya 55,oyo abandaka koloba lopoto makasi.
Betela biso lisolo ya ba assassins oyo Mobutu alakisaka na 20 mai,soki nabosani te ezalaki na 1975,babomaka
nani?
Django na Kulukangala Karadjess,lisolo na bango nayebi yango malamu te,nayebi ke basambaka,babomaka
bango?
En general,batu ya makasi nionso na masolo na bango entre ba mbula 60 ti na 70-80.
Na si natanga lisolo ya Ngwalima awa,ezalaka incomplet! okoki ko bakisa?
Kandolo pardon mingi kozala bref te,nalingi opesa ngai ba details nionso,epai babandaki kofanda,nini basala,soki
bakufa to bomoi.
Nalingi okabola ba articles,koma mutu na mutu na lisolo naye.
Le messager ,lukela biso mutu akoki kokomela biso lisolo ya ba bande dessinée,oyo azalaka na revue ya Likembe neti
Sinatra na Molok,Coco et Didi,Apolosa,etc...okolimbisa ngai soki mituna ngai esi ekokomama dejá,na blog oyo.
Mbote mingi Dio-Dio,Joseph Pululu na Muana Mangembo.Merci mingi na ndenge bofongolaka biso bongo na oyo
eleka.
NDOMBASI KUPESSA NGOMBO
Ngai nalingaki natuni motuna ya ba bandes dessinées lokola otuni nionso, osali malamu. Bandeko na biso oyo bakomaka na mbokamosika, bazali penza na ba connaissances mingi ya makambo ya mboka na biso. Vraiment longonya na bino banso.
Merci
Sulmany
Moto asala ba caricature na revue jeunes pour jeunes kombo na ye Boyau. Ye mpe moto abandaka kosala ba caricatures na journal Salongo. Nayebi esika aswami na moyi ya lelo te. Ye azali artiste fromé na académie des beaux arts nabanzi. Moto okoki kosunga biso na ko localiser ye ezali ndeko na biso Serge Diantantu, oyo aza mpe na kati ya équipe ya mbokamosika, banière na biso eza oeuvre na ye. Tosolola mingi na ye na phone. Na proposaki ye a reproduire ata caricature moko ya Apolosa, ou bien Kikwata. Kasi azali na mua ba hésitation mpo na droit d'auteur. Soki Boyau apesi ye permission, Serge ako reproduire ba dessin ya Molok, Apolosa, Kikwata na kati ya blog Mboka mosika.
Messager
Ba problèmes mentaux na ye ezalaki périodiques,donc tango mosusu azalaki naye bien puis kimia,mais soki sanza eyei ko changer quartier,ye pe ba problèmes na yeÂ
ebandi.Ekolo na ye ezalaki Besi ngombe,oyo ya bato ya Gombe Matadi à coté de Mbanza-ngungu,dans le Bas-Congo.
Vieux Mbelekete ya malonga,ye pe azalaki liboma te.Eloko etambuisaki ye bongo,nde masanga na bangi.Azalaki ko tirer noix devant n´importe qui.Bakonzi ya
époque wana bayebaki ye bien.Don naye ya makasi ezalaki maîtrise ya byciclette.Soki akoti na bala-bala ya prince Baudouin sur son vélo,bato nioso bazalaki na motema likolo.Tango mosusu akokata circulation na ba acrobaties na ye likolo ya kinga.Il dirigeait la circulation avec ses bras tout en équilibrant sa byciclette avec son corps et sans déscendre de celle-ci.Ba acrobaties tomonaka lel´oyo na ba exibitions ya motocross,notre Mbelekete asala yango na vélo na ye,sans utiliser ses bras ni ses mains.Toujours azalaki îvre,puis soki bolobi naye Mbelekete,ye a répondre "ya malonga".Il n´était pas du tout violant,mais il amusait tout Kinshasa.Na tango ya ba belges,ba conducteurs bazalaki plus résponsables,yango wana bazalaki ko respecter ba exibitions naye.Vieux Mbelekete sans soucis,était écrasé,si je ne me trompe pas par un camion Fula-fula dans les années 60.     Â