Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Na bakisi na maye Emmanuel Kandolo alobi. Parmi ba magasins ya liboso ya ba africains na Paris tozalaki kosomba ba produits alimentaires ya Afrique na 1970 epayi ya ba camerounais na rue saint Didier na Paris 16° mpe na Belle ville.
Pondu ya nkasa ezalaki te,pondu batuta mpe ya conserve ezalaki kowuta na cameroun. Kwanga ezalaki te,na esika na yango tozalaki kolia bebolo ou bobolo ya cameroun 'to miondo mpo ezali mua moke lokola kwanga.
Evidemment manger africain ezalaki luxe na époque wana. Kolia ezalaki moins cher na resto Universitaire mpe na ndako soki possibilité ya kosala semoule ezalaki. Yango baye bazalaki na chambre bazalaki souvent na butagaz bien que ezalaki souvent interdit na ba conditions ya location.
Na yebi Masua te sino na kombo mais grande soeur na bango na yebi ye. Azalaki kosala na Ambassade du Zaïre. Ye azali bolongani ya Kulenduka oyo azalaki kosala na Unesco,paix à son âme. Madame Véronique Kulenduka nde abandaki parmi ba premiers congolais kofungola boutique na Chateau rouge. Azalaki ko tonga mabaya mpe bilamba ya mariage ya basi. Mpe commerce na ye ya bilamba ya wax ebotaki boutique ya Kinshasa.
Problème ya ba Africain et les congolais en particulier, tozali réfractaires na oyo nionso etali progrès mpe civilisation. po na ko tenir cahier de compte na comptabilité ya malonga e pozaka biso problème mingi yango wana désorganisation ezalaka na kati ya commerce na biso.
Ba premières boutiques ekangemaki na chateau rouge po ba nkolo na yango bazalaki ko s'organiser po na ko futa taxes te. Ba impots e s'accumuler mpe ozali obligé o kanga.
Banda période moko tokoki ko remarquer mingi ba resisté mpe commerce na bango ezali kokoba mpe ko évoluer makasi. Tout Kin ezali kaka en place et tant d'autres.
Alimentation ezali na problème te. Ba ye ba exploita ba restaurants mpe ba dancings bazali na ba difficultés mpo communauté cible en l'occurence ya ba Congolais ezali na pouvoir d'achat ya makasi te. Dès lors cible ezali na pouvoir d'achat ya moke clientèle pe ezali moke.
Tala exemple malamu ya ba Africain na Paris ezali boîtes de nuit Keur Samba na Black and White,ezali kofonctionner depuis des années sans problèmes majeurs. Na kati na yango okokuta communautés nionso ya mokili bakoya komela mpe kobina. Tout est question d'organisation.
Na jeunesse na biso mingi ba vouer vie na bango na France na ba études mpe rien d'autre. D'ailleurs la plupart soki kaka diplôme ezuami bazalaki kozonga mboka où un travail les attendait. Habitudes ya ko fréquenter ba bars 'to nganda ezalaki na bango te.
Emmanuel Kandolo alobi yango malamu,de 1960 à 1974 ezalaki rare okutana na Congolais na France bien que ba étudiants bazalaki mingi. Facilité ya papiers ya réfugié nde ekotisaki ba belgicains na Paris. Malheureusement mingi bazalaki ba miyibi dont l'un d'eux est un sapeur connu. Un des milieux interlopes ya ba congolais ezalaki na métro laumière ndenge Emmanuel Kandolo akomi yango.  Mpe papa wemba ayembi yango ba mbongo nionso ekomi papiers hyièniques. A Laumière l'argent coulait à flot. Il fallait être solide moralement pour ne pas succomber aux sirènes du mal et de l'argent facile. Laumière c'était l'argent facile. L'histoire des congolais en France doit être écrite,elle est tellement pittoresque. Les starts de Laumière sont chantées, c'est paradoxale mais c'est comme ça.
La société congolaise na Fance mpe ailleurs ezali microcosme ya société congolaise na Congo. Il manque une élité oyo ékoki ko tirer l'ensemble de la communauté vers le haut ndenge ezali épayi ya basusu.
Mais toloba kaka po na ba trains oyo ekomaka na retard té. Ba reussite ezali mingi na kati ya communauté congolaise na France. Ebongikomeka ko tiya yango e exergue po ebota émulation kati ya bana.
Tala réussite ya ba noirs ezali na sport en particulier le football yango bana mingi bazali ebonguani epayi ya football.

Anaclet
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M

je voudrais faire plus ample connaissance avec vous car comme mon nom l'indique plus haut, je m'aappelle kulenduka et qui sait, peut-etre nous somme de la meme famille. Sorry pour les fautes
d'ortographes, c;est un clavier pour les textes anglais. Merci de me repondre vite.

Répondre
G
A MM Anaclet et Emmanuel KANDOLO.

Merci pour vos commentaires sur le coup de gueule « Château-Rouge ». Votre connaissance de l’historique de l’implantation des Africains et des Congolais dans ce coin de Paris, qui fut aussi l’émanation de certaines des facettes de notre culture, est une référence de grande valeur. C’est vrai que nous avions cité des noms, par pour les stigmatiser, mais pour toucher du doigt des réalités congolaises. La question centrale était : pourquoi arrivons-nous à perdre la main sur des places comme Château-Rouge, à Paris, ou MATONGE, à Bruxelles ? Vous dites grosso-modo que c’est parce que nous Congolais ne savons pas nous organiser, parce que nous ne nous mettons pas au niveau des exigences de la gestion moderne des affaires.

Nous avons suggéré un parallèle entre Château-Rouge/Matonge et la façon dont nous sommes en train de nous faire déposséder de Goma…

Jo THSIMBALANGA et Paggy PAMBANI eux ont soulevé le manque de solidarité, l’inexistence d’un véritable esprit de groupe.

Ando CHANGA quant à lui, ainsi qu’il le dit dans ses deux derniers coups de gueule sur Radio MANGEMBO, nous rappelle que si collectivement nous ne nous en sortons pas, c’est parce que nous n’avons pas excellé dans la notion de service pour les autres, au pays comme dans la diaspora.

Guillaume
Répondre