Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ndeko Kinzonzi-Michel,

 

Oyebi, avant o attaquer Sabam na Sacem, esengelaki otuna naino soki effectivement ebongaki basala quelque chose au sujet ya problème ya santé oyo Pablo Bakunde Ilo Isemezey azali ko connaître sika sika awa. En ce qui concerne la Soneca, nabanzi que  Pablo azali ou ( azalaka vice-président). Donc, azali mieux placer na likambo yango.

Idée opesi ezali malamu, kasi ndeko na ngai, tika nayebisa yo que mpo e se réaliser esengeli naino tozala réaliste. Par artiste Congolais que faut-il entendre ? Peintres, cinéaste, musiciens, sculpteurs, danseurs, écrivains , comédiens ?

Soki tozui neti cas ya ba musiciens (traditionnels, modernes, religieux na sectaires), esengeli bazala na kati ya Union des Musiciens Congolais (UMUCO). Or,UMUCO , siège na yango esika ezali, ezali esika oyo Verkys Kiamuangana Mateta, azuami. Likonda na yango, yango nde poche ya Verkys, administration yango nde malette Verkys atambolaka na yango. Donc, Verkys azali incarnation ya UMUCO.  Par ailleurs, Société Nationale des Auteurs et Compositeurs (SONECA), yango banda kala e servaka intérêt ya président na yango mpe na ya ministre ya Culture et Art, puisque gouvernement nde e nomaka bakonzi na yango. Na désordre oyo, souvent on ne se retrouve pas. Batu ya SABAM na SACEM, batindaka mbongo ya ba artistes malamu mpe ba aidaka SONECA mingi na kolandela makambo ya ba artistes musiciens, kasi SONECA esalaka kaka makambo na intérêt mosusu. Lelo oyo, tuna soki combien des musiciens bazalaka kuna ?

Tozongela idée na yo.  Soki neti musicien ya Tshimbulu ou ya Idiofa voir ya Kolwezi akufi, ndenge nini akozua aide dès lors que rien ne prouve que azali nduliste ? Est-ce que toyebi ba nduliste ya Kindu, Butembo, Bunia, Isiro, Bumba, Aketi, Gemena, Kiri, Inongo, Nioki, Lisala, Tshela, Banana, Moanda, Bakua Katawa, Bakua Niambi, Bajilakasanga, Bena Fwamba,  Bakua Luntu, Bena kabiya, Bakua Mukendi, Bakua kalonji, ya Muene ditu, Lusambo, Likasi, Manono, Kalemie, Kindu, Fizi, Buta, na Kasumbalesa ?

Soki nazui ndakisa ya France, tokomona que awa loi ya 1 juillet 1901, ezali ko organiser ba associations. Na yango esengeli , toyeba Raison sociale na yango (Association ya bienfaissance et assistance), ekosalema na Régime juridique nini ? ( de droit = na capacité juridique mpe personnalité morale ou de fait= non déclarée), Régime fiscal na yango na nionso ezali kolanda (exonération ya droits de mutation, don manuel, quêtes, donations et legs) ezali kosenga mua réflexion mpe compréhension ya contrat ya droit privé ya esika yango esengeli esalema (espace). N.B. Tango mutu esengeli apesa mbongo, il faut bien azala na retour oyo ekosala que a bénéficier na ba abattements na ba exonérations fiscaux, etc.

Ngai  oyo etali conseil, tala naino yo moko ndenge ba musiciens na biso ba vivaka mpe image bapesaka biso ezalaka ya batu bakoka : Koya poto pamba pamba, kofanda na poto, kopeta ba concerts na ba grandes salles ekenda sango,  kolata bilamba ya talo, kotambola na mituka ya talo (ba gros cylindrés), kobuaka batu ya mbongo na bakonzi mpe kolakisa que bazali na ba relations minene partout na monde, balakisaka biso bomengo bazali na yango na bilili, bazali na ba kombo kaka ya minene, bazongelaka bilamba te, etc. Ebongo batu ya lolenge wana olingi lelo oyo tobanda kokangisela bango mbongo aussi longtemps que bayebi te que avenir e se préparaka na présent , mpe futur ezalaka nde mpona ko récolter fruit ya présent ! Tosomba ba œuvres na bango, tobanda lisusu ko prendre bango en charge ? Tala, boni bayebaka  que esengeli ko assurer outil de production na bango ? Mungongo oyo eyembaka mpe maboko oyo ebetaka instrument ba assuraka yango.  Boni bazali na mutuelle, assurance santé, assurance vie ? Boni basalisaka ba bilans de santé ? Tala Société Nationale d’Assurance (SONAS) ezali wana, mingi bakendekle kuna kaka mpona assurance auto. Lelo oyo yango nde ezui Pablo en charge pona mawa ou pona promotion na yango. Na Afrique du Sud kuna azali pris totalement en charge na Resolution Insurance, partenaire ya SONAS, na Afrique du Sud.

Ngai nalobaka mbala na mbala que na mboka na biso ezali na batu oyo napesaka conseils te mpe nalingaka kopesa conseils te : ba musiciens, ba chauffeurs ya camion, ba chauffeurs ya Fula Fula, ba chauffeurs ya Taxi, ba chauffeurs ya Taxibus,  ba boys chauffeurs, ba receveurs, ba cordonniers, ba bagagistes ya aéroport ya N’Djili, ba porteurs ya libongo  na ya Beach ya ONATRA, ba commerçants ya wenze ya bikeko, ba mama Bipepula, ba pasteurs na bandimi ya ba nzambi nzambi, police de roulage, batu ya prix mangondo, ba joueurs ya football, ba catcheurs, bana mayi, bana pommes, bana mapa, ba restaurateurs ya zandu ya munene, banikisi pondu ya wenze ya Gambela, ba quados, ba pharmaciens ya wenze, ba magistrats ya ba cours et tribunaux, bateki ntaba ya Mariano, ba arbitres ya Fédération Congolaise de Football (FECOFOT), ba soi-disant étudiants, na ba politiciens affairiste sopportunistes na ba politicailleurs.

Natombeli yo butu elamu,

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
C
Bonjour Emmanuel Kandolo. Nalingi na réagir na réponse na yo epayi ya Kinzonzi-Michel. J'ai vu le paragraphe sur le mode de vie de nos musiciens. Nazali ko partager na yo entièrement point de na yo. Ba musiciens na biso bapesaka toujours image que bazali ba millionnaires. Bazali bato ya mbongo ebele. Na suka na bomoyi na bango ou en cas de difficultés majeures, on constate que malheureusement bazali batu oyo balingi ko paraître plus qu'il ne sont. Dans cet état de chose, nos musiciens pensent toujours que notre communauté leur doit beaucoup. Je ne sais pas à partir de quoi...Tala exemple ya Kiamuanga: tout le monde sait que mpo atonga Vévé center, ezalaki na crédit ya Sofide. Tango ekomi ngonga ya kozongisa crédit wana, abandi ba manoeuvres: nasala mingi mpo na mboka, je suis décoré d'ordre de léoard etc...Tout ça mpo asali nzembo moko to mibale mpo na Mobutu. Batu bazali mingi oyo basala mpo na mboka na biso. Il ya des gens qui sont eligibles na solidarité nationale ya peuple na biso. Nos musiciens, je ne pense pas qu'ils soient les premiers nécessiteux. Donc ozali parfaitement na raison ndeko na nga pour avoir souligner l'étiquette "d'autosuffisance" financière de nos musiciens. Soki ba aléas ya la vie efrapper bango, qu'ils commencent par se prendre en charge eux mêmes d'abord...ensuite, s'il faut un geste de solidarité, il viendra après et en complément. Merci pour votre analyse et à la prochaine.
Répondre
M
Ndeko Kandolo pe na ba ndeko ya blog,Namoni eyano ozongisi po na réaction oyo na salaki tango tozuaki sango ya kulutu na biso Ilo Pablo.Soki sango yango ezali ya lokuta nzambe abatela ye na esika azali kozua ba soins na Afrique du Sud.Na manso oyo yo okomi na tangi yango malamu pe nakoki kobakisa boye:nabambi libanga na Sabam to Sacem te nazali nde komituna po  ezali mawa ke ba artistes na biso (nalobeli kaka ba alanga nzembo te)bazali ko sukisa bomoyi na bango na pasi.Toyebi yango malamu na mboka na biso Umuco to Soneca etambola ata mokolo moko te pona intérêt ya ba alanga nzembo na yango lokola bazali bato oyo yo okoki kopesa ka conseils te totika bango banso na corbeille moko?Na yebi ete ekolo na biso ezali monene pe bato ya culture ba zali ebele soki tolingi to monisa bango etamboleli na bango ezali mabe tokoki kosala eloko mosusu na pembeni to kanisa ,tosangana ata na Association loi 1901 po na ba artistes nionso ya mboka na biso.Lelo ndeko Pablo a béneficier peut-être na ba accointances na ye azali na yango lokola olobaki te azalaka vice-président ya Soneca  ebongo kulutu Mayaula ye pe azali na maladie makasi akosuka ndenge nini toPapa Sonzo na théatre?Na ba mboka oyo to fandi to monaka ba téléthon,ba restos du coeur,association Ella to  9 du coeur esalemi soit na ba alanga zembo,to mobeti ndembo na baninga mosusu pe  bana mboka na biso pe ba paya to tiaka bango maboko,lelo soki esalemi tokosala kaka po na ba artistes te lobi pe tokoki kosala ba actions po na enseignement ya mboka na biso.Nakota na blog oyo na mai ou juin pe nazalaka koluka eloko mosusu nde google moto ememanga na blog na biso na visita ba pages nionso pe na mona sérieux oyo ezali kati ya misala oyo bozali kosala eza ba pasteurs te bato ba ko apporter une pierre pona kotonga to kotelemisa ekolo!Ezali ngai,yo na bandeko oyo bazali na bolingo.Na yebi te soki bolingo ezali toko koka ata na ya moke.Ya solo tosomba ba oeuvres na bango bayike bazuaka mbongo  mais leloyo oyo ekueyaka na ba Sacem to Sabam ekomaka na ba poches ya ba Vieux wana oyo yo oyebi.Na yebi ete etamboleli na bango tango bazalaka na bozui pe lumpemba ezalaka ya mabe ba mimonaka lokola ba Nzambe mais tosalisa bango po te baleki oyo bazali koya ba bongola ezaleli na bango.Na kosukisa na phrase oyo :"A force de vivre dans le mal,la gabegie ou le désordre on confond le vrai du mal"."Pe kozanga koyeba ezali liwa ya ndambo" .To zua temps ya kokanisa.Wa bino ndeko Michel Kinzonzi!
Répondre
Y
Nasepeli na intervention ya Emmanuel Kandolo. Musiciens congolais azali irresponsable, soki akomi na probleme, il faut intervention soit ya gouvernement soit ya bato mosusu. Mais tango bazalaka na succes na bango bayokaka conseils ya mutu..biloko ya cher kaka bango..basi nyonso ya kitoko kaka bango...ambiance tango nyonso kaka bango....mais soki akomi na difficulte oh ba abandoner ye...comme Emmanuel Kandolo, je pense que le seul support que nous devons donner a ces artistes..c'est acheter leurs oeuvres..qu'ils gerent leur petite fortune prudement..en sachant que la vie d'un artiste est aleatoire...aussi si ca marche avec la musique..qu'ils fassent autre chose pour gagner leur..comme nous tous..qui changeons de carriere..quand ce qu'on faisait avant ne marche plus....surtout qu'ils pensent a leur retraite...et surtout a leur eventuel enterrrement..
Répondre