Rémunération de l'auteur

Texte Libre


CONTACT:

Mboka64@yahoo.fr

Calendrier

Juillet 2009
L M M J V S D
    1 2 3 4 5
6 7 8 9 10 11 12
13 14 15 16 17 18 19
20 21 22 23 24 25 26
27 28 29 30 31    
<< < > >>

Publicité

Rechercher

Texte Libre

   

GENERIQUE




overblog

Présentation

  • : Le blog de Messager
  • mbokamosika
  • : Musique politique détente souvenirs Culture
  • : Cet espace se veut un lieu de rencontres et d'échanges entre ressortissants de la République Démocratique du Congo . Tout étranger connaissant ou voulant faire connaissance du Congo est le bienvenu. Nous y aborderons des sujets de société en français ou en lingala, selon les interlocuteurs . Notre devise:réduire la distance qui nous sépare du pays, par l'entretien de notre mémoire, en nous référant à notre musique dans sa globalité.
  • Recommander ce blog
  • Retour à la page d'accueil

Images Aléatoires

Images Aléatoires

Syndication

  • Flux RSS des articles

Texte Libre

STATISTIQUES

Pages vues          788.200
Visiteurs              136.324
Journée record    27/03/2009 / 3.026 pages vues
Mois record             03/2009/ 56.150 pages vues






Mercredi 27 août 2008

Messager,



Ngai oyo naye! Longonia na mosala nionso moye osali mpona kotelemisa blog na biso oyo. Longonia lisusu na lolenge bandeko bazali kotiya yango maboko mpo ezala kaka yakotelema. Tika tolanda lokolo oyo mpo tolobela maye maleka, masalema mpe mazali koleka na kosalema na mboka na biso. Elikya ezali kaka ete nionso ekoba na kosalema na bolingo na lisanga ata soki tango mosusu tokoki komonela makambo ndenge moko te nto mpe soki tozali lisusu koyeba makambo masusu malamu te na bolayi ya ba mbula eleka, etc.

Ngai nakosenga na yo, ndeko Messager, obendaka makambo mosusu nakoma na Congo 2000 mpona ko simba na nzembo nto mpe masolo mosusu tokobetaka awa.

Messager, orchestre  ya Angel Face oyo Ballak azali kolobela ezali nde ya Ngiri-Ngiri. Kombo na yango Dynamique Aïcha. Ba leaders bazalaki Angel Face "Moto na vélo" na Lucky Joe. Basalaka ngenge na bango na chanson "Makoko". Na nzembo wana, Angel asala ba variations moko ya suka!

Na regretter mingi liwa ya papa Wendo na Mopero wa maloba. Tokolobela misala mia bango na mikolo mikoya na blog na biso oyo.  

Wayo ndeko,

Emmanuel kandolo
 

 

                                        GRAND KALLE IN MEMORIAM 

 

Grand Kallé azalaki un intellectuel, un grand poète, un véritable don juan.Joseph Athanase Kabasele (Grand Kallé, Kallé Jeff) abotami le, 16 décembre 1930 na localité ya Palapala na Léopoldville. Muana ya papa André Tshamala na mama Hortence Ngalula.

Ye atangi na collège Sainte-Anne epayi ya ba Scheut (Saint-Joseph, Elikya) na école primaire, na ECOMORAPH (Saint Raphaël)na école secondaire.

Malheureusement asilisaki ba kelasi na ye te puisque ba sango babenganaki ye na baninga na ye mosusu. Suite na exclusion wana nde azangaki kosilisa ba kelasi na ye.

Grand Kallé abotami na famille chrétienne catholique. Azui baptême, premier communion mpe confirmation na kati ya foi catholique. A partir ya ba cours ya chant nde ba maîtres d'école (ba sango) bayaki nde ko remarquer mungongo na ye kitoko, bango nde basengaki na famille na ye soki akoki koyemba na chorale ya Eglise Sainte-Anne entre 1938 na 1947. Abandaki kosala succès makasi na mongongo na ye ya ténor (ba oyo bayemba na chorale bayebi ete classification ya mingongo ezalaka : ténor, soprano, alto na base. kasi ténor nde mutu ezalaka-mongongo ya ba angelu-ndenge elobamaka couramment) surtout na ba messes de Requiem. Wana nde kombo na ye ebandi kotambola na cité elongo na koyebana makasi epayi ya bana basi.

Elenge, Joseph Kabasele, abandaki ko mener vie lokola bilenge binso ya époque na ye : ba jeux, sorties, ba jeunes filles, etc. Na ba sorties wana, abandaki mpe kokutana na bilenge basusu oyo babandaki komeka nzotu na miziki mpe en dehors ya classe na chorale abandaki mpe kokutana na bango. Na yango, aye kobimisa nzembo moko na titre : « Palmolive » . Nzembo oyo ayaki kobimisa yango na orchestre de tendance congolaise"OTC" na 1947 esika akutanaki mpe ayebanaki na Marcelin Laboga,  Geroges Doula  na Albert Yamba Yamba Bondo.

Palmolive ezalaki marque ya savon de toilette parfumé. Grand Kallé na nzembo oyo abandaki ko traiter ba filles lokola savon Palmolive, c’est-a-dire abandaki ko admirer fraicheur, beauté, tendresse na affection oyo ezali kosala ete bolingo ezala entre jeune fille na jeune garçon na lolenge ya malasi na fraîcheure oyo savon Palmolive etikaka na nzotu. Ba sango batombokaki makasi mpe ba traiter ye de débauché. A partir ya nzembo oyo, ba études ya Grand Kallé ekomaki sans avenir. Esengeli kobakisa que azalaki ye moko te, babenganaki ye na baninga na ye oyo bazalaki na groupe na bango ya « bana Palmolive » ou « bana Palmo » mpo na bango, possibilité ya ko s'inscrire na école mosusu ezalaki te puisque mumpe na missioni nde bazalaki na contrôle ya enseignement. Kasi ata bongo, Grand Kallé akomaki populaire epayi ya ba jeunes filles ya Léopoldville puisque azalaki oyo abandaki koyembela bang oba nzembo yaoyo ezali na romantisme. Esengeli nabakisa lisusu que ba sango na ba soeurs ya lycée Saint-Pierre mpe basalaki ba rapports na ba sango ya ECOMORAPH sur comportement na ye na ba jeunes filles oyo batangaka kuna.

Tango babengani ye na classe, aluki musala mpe akomi kosala en tant que secrétaire de direction. A côté ya musala, abandaki kokutana na baninga baye mpe ayaki kozua likanisi lya kokende kokutana na Benatard na 1949 (ye azalaki kolo Editions Opika mpe commerçant na Léopodville). Ce dernier, amonaki que Grand Kallé akembaki naino te na miziki, yango wana asengaki na Jimmy Zacharie Elenga alendisa ye mua moke na ba techniques ya chant na studio. Notons que Jimmy Zacharie Elenga na Paul Muanga nde bazalaki ba musiciens ya liboso oyo bazalaki na Opika. Tango Grand Kallé akomeli, Opika eye kosala enregistrement ya ba nzembo na ye ya liboso : Tika makele na ndako, Coco na ngai, Zonga noki, Valérie Régina na Bolingo lokola liki.

Pendant que Grand Kallé azalaki pene pene ya Jimmy Zacharie, a vivaki ndenge Jimmy a organisaki artistiquement studio Opika na organisation ya orchestre ya studio oyo ezalaki composer na deux guitares, contrebasse, saxophone, timbale, na conga na deux guitares. Organisation oyo e impressionaki ye makasi puisque moko te avant Jimmy asalaka boye. Toloba lisusu que liboso rumba ya Congo ebandaki kaka kobetama na guitare moko na percussion.

Na studio Opika Grand Kallé aye koyebana na élève moko ya Jimmy : Charles Mwamba « petit Jimmy » Déchaud, Nicolas Kassanda « Nico » (élève ya Déchaud), Timothée Baloji « Tino Baroza » (cousin ya Déchaud ana Nico), Roger Izeidi, André Taomani, na Menga André.

Grand Kallé aye kozua likanisi ya kosala orchestre na 1951, kasi esengelaki naino akokisa makoki mpe a réaliser rêve na ye. Na 1953, aye kosala African Jazz. Pourquoi African Jazz ? Mpo tango wana mundele abandaki komona africain pamba na maye manso ma ye. Yango alingaki atombola kombo wana en associant Jazz comme étant miziki ya ba oyo bazalaki na bowumbu « moto moyindo ». Na kombo wana Grand Kallé azalaki na idée ya kobeta Jazz te, kasi ya kopesa signification na miziki oyo azali kobeta na lokolo ya bakangaka miziki na bowumbu te.

Orchestre African Jazz ezalaki na Joseph Kabasele « Grand Kallé, Kallé Jeff » (chant na percussion), Roger Izeidi «  Roi de maracasses » (Chant na percussion), Timothée Baloji « Tino Baroza » (guitare), Charles Mwamba « Déchaud Mungala » (guitare), Nicolas Kasanda « Nico Mobali » (guitare),William Taomani « Willy », Masta Zamba (Tumba) (contrebasse), André Menga (saxophone), Willy-Dominique  Kuntima (trompette), Antoine Kaya « Dépuissant » (Congas na Tumba), Etienne Zamba (Tumba)

Na mayele ya Grand Kallé, esengelaki kobongola musique congolais d’une manière profonde :akotisi trompette, tumba na instruments électriques.

Tango grand Kalle asali African Jazz, akamataki baninga baye azalaki koyemba na bango na studio Opika. Benathard, patron ya Opika, a continuaki ko travailler na Grand Kallé mpe Opika ekomaki maison d’Editions ya African jazz. Entre 1953 na 1955.

Na 1955, Opika ebandaki lisusu kokoka makambo te. Na yango Moussa Benathard ayaki koteka yango na Dino Antonopoulos mpe ekomaki Editions Esengo.

African jazz nde ezali orchestre ya liboso oyo efandisa chorale na expression claire, harmonieuse ya ba instruments. Na yango Kallé azalaki très exigent àtel point que abandaki ko tolérer ba fausses notes te. Abandaki ko tiya accent makasi na nionso : texte, arrangement, composition ya musique, rythme, na solfège.

Avant kutu bakende na kati ya Congo-Belge, Grand Kallé na African Jazz bayaki kosala déplacement ya liboso na étranger na 1953. African jazz ekendaki kobeta na Bangui na inauguration ya dancing-bar le Rex. Voyage wana e marquaki Kallé mingi mpe elakisaki ye que African jazz koyebana na yango eleki frontière ya Congo.

Na mayele ya Grand Kallé, orchestre african Jazz esengeli ebongola ebeteli ya miziki na esaleli na yango : kobeta ba concerts na ba bars (à l’époque ba salles ezalaki te), ko répondre na ba invitations ya mariage, baptême mpe kobeta na matanga na ba fêtes mosusu. African Jazz ebandi promotion ya musique na libanda ya studio mpe yango esali ete etambola Congo mobimba. Justement na tournée ya liboso basalaka na intérieur ya Congo-Belge, tango bakomi na Stanleyville (Kisangani) bakutani na Isaac Musekiwa. Ye azalaki kobeta Saxophone, un grand saxophoniste. Grand Kallé asenga ye soki akoki kokota na African jazz, ye andimaki. Kasi tango akoti na 1954, sima voyage mosusu basalaki na intérieur, ayaki kolongua mpe akeyi kokota na OK Jazz epayi ya papa Oscar Kashama « Cassien » na O.K. Bar esika ebandaki ko répéter avant ebima en tant que orchestre na 1956.

Na 1959 African Jazz eye kokende na Belgique, Hollande, Luxembourg, France, Italie, Espagne na Allemagne-Fédérale.

Na Bruxelles Grand kalle asalaki nzembo ya Independance cha cha. Soki totiye pembeni qualite artistique ya nzembo oyo, engagement politique na ye ezalaki polele na lisanga lya ekolo mpe na prise ya responsabilite ya bana mboka na makambo ya ekolo

Grand Kallé ya solo azalaki mutu oyo alingaki lisano mingi, na ba nzembo na ye abandaki koyemba mingi bolingo na société. Kasi na contexte ya colonisation, amonaki ete musicien akoki ko utiliser mayele ma ye na kosala ba nzembo na contribution ya lutte ya libération. Abandaki engagement na ye na ba nzembo mpe génération na ye ezalaki oyo ebandaki ko lutter mpona lipanda.

Il est vrai que Grand Kallé asukaki na troisième secondaire mpe azali un autodidacte. A se former makasi mpe azalaki na culture livresque makasi mpe abandaki koloba mpe kokoma un très bon francais. Nazali koyeba lisusu tango African Jazz eyaka pour la première fois na Paris na Janvier 1960 tango basalaka tournée na Belgique, Hollande, France, Allemagne-Fédérale, Espagne na Italie. Na Paris, eloko ya liboso asengaki na papa (azalaki moninga na ye) na ngai ezalaki ete amema ye na quartier Latin mpe na maison d’Editions Présence Africaine. Kuna akutanaki na Alioune Diop, directeur mpe créateur ya Editions. Tangu  Grand Kallé aya na ndaku na ba musiciens mosusu, aloba na ngai que azalaka passionner ya Mathématiques, philosophie, Science, littérature na droit.

Azalaki convaincu que musique esengeli ekende de paire na mayele na mutu mpe soki olingi osala musique malamu esengeli otanga kelasi. Mpo moto oyo bongo naye ezali naya kofonguama na connaissance a ko comprendre facilement absence ya frontière na kati ya musique.

Na Bruxelles, Grand Kallé asalaki confèrence le, 5 avril 1960 sur : « Rôle et place de la musique congolaise na Congo indépendant ».

Na retour ya Table Ronde politique, Grand Kallé akomaki fonctionnaire na ministère ya information, dirigé na Anicet Kashamura. Grand Kallé azalaki mpe moninga ya Patrice Lumumba.

Na engagement politique ya Grand Kallé par la musique esengeli tolobela lisusu nzembo oyo ya « Table ronde » na 1960. Na kati ya nzembo oyo , atangaki ba politiciens congolais na ba étrangers oyo ba contribuaki na marche ya lipanda neti Buisseret. Ayeba Modibo keita, président ya Mali mpe un grand panafricaniste, na 1963 pendant tournée na Afrique de l’Ouest. Na 1967 na sommet ya OUA esalema na Kinshasa, Grand Kallé a composa nzembo mpo na chaque pays. Mpe apesa chef d`Etat ou de gouvernement nionso oyo ayaka na sommet wana disque ya 45 tours oyo asala mpona mboka na ye. Grand Kallé atikala koyemba président Mobutu ata mbala moko te.

Ba Cubains ya Ballet Tropicana bayaka na Kinshasa kotonda Grand Kallé na lokumu apesaka mboka na bango na musique Afro-cubaine mpe na ndenge abandaki kotanga yango. Bundu Pe Litho a jouaki rôle munene na koya ya Ballet wana na Kinshasa.  

Na miziki, Grand Kallé a creaka Maison d`Editions et de production Surboum African Jazz. Grâce na yango nde O.K. Jazz eyaki na poto mbala ya liboso na 1961.

Grand Kallé ayaka kokoma président ya Soneca na 1976. Vie ya Grand Kallé ezalaki lier na oyo ya African Jazz. Tango African jazz ekabuani mbala ya liboso na 1961, Grand Kallé asalaki maye makoki mpo orchestre ezonga, kasi kokabuana ya mibale na 1963 eyaki vraiment ko sécouer ye. Ba musiciens nionso bakenda. Amonaki que œuvre oyo akeli na motema moko epanzana bongo, ezalaki très difficile à supporter. Aya ko reprendre na 1964 tee na 1968 tango incompréhension eyaki kokota sur respect ya clause ya contrat oyo ebandaki ko lier ba musiciens ya African Jazz na African jazz : Grand Kallé azalaki na droit ya 25% na contrat nionso ya production.

Na sima ya wana, Grand kallé ayaki ko changer philosophie, akeyi ko s’installer na Paris avec idée ya ko créer groupe oyo ekobanda kaka kobimisa ba disques sans production na scène. African Team esalaki succès na yango entre 1969 na 1972. Sima ya wana Grand Kallé abandaki lisusu kobeta miziki te. Akomaki ko vivre na ba droits d’auteur na ye mpe na ba revenus ya Surboum African Jazz.

Kobanda na 1973 tee na 1980, Grand Kallé akomaki ko se produire mingi na cadre privé. Dernière fois abeta na public ezalaka na Renapec mpe mbala mosusu na Inter continental de Kinshasa. Concert ya Inter na 1980 ezalaka ya suka. D’ailleurs, avant wana azalaka mingi na Paris. Na 1982, tango azala na Hôpital ya Saint Cloud tokendaka kotala ye na papa na ngai. A la grande surprise, Rochereau ayaki spécialement de Kinshasa mpo na ko rendre ye visite. A l’occasion, masolo mingi ya African Jazz ebetamaki.

Grand Kallé akenda le, 11 févirer 1983 na 18 heures na Hôpital Mama Yemo na mbula ya 53 ans.

Atiki bana sambo oyo abota na mama Cathèrine. Mama Cedel nde azalaki oyo asalaka na ye marriage liboso ya nzambe.

Mbala ya sima, nakolobela discographie ya African Jazz mpe nakotelema na instruments na voix, relations ya Grand Kallé na ba musiciens nionso baleka na African Jazz (bana mboka mpe ba paya) ba collaborations na ye na ba musiciens mosusu ya Congo mpe  ya ba paya, basi ayemba, mibali ayemba, ba viveurs ya époque ya African Jazz na vie na ye moko ya gentleman. 

 

Musicalement,  

Emmanuel Kandolo 
 

 

 

                                    COMPLEMENT SUR STUKAS   

 

Nalingi mpe nabakisa mua moke na oyo elobami awa sur makambo ya Stukas.

Ya solo Lomingo Alida atikala na Stukas tee na ndenge mouvement ebandaki lisusu ko tenir te. Lomingo asala ba efforts mpo mouvement etelema malgrés ba promesses ya lokuta ya Gaby Lita Bembo. Na suka esengelaki koteka ba instruments sur demande na ye moko Gaby mpo azalaki na besoin ya bongo na mikili. Kokufa nionso ya orchestre yango wana. A noter aussi que koteka ya ba instruments, kofutama ya ba musiciens na ba contrats ekomaki mua pasi e contribuaki na kokueya ya movement atako volonté ya kobeta miziki etikalaki na ye. Acharnement wana nde mutu esalaki que Grand Maître Franco Luambo azua ye na O.K.Jazz  na 1986 mpo na miso ma ye azalaki musicien oyo alingaki mosala na ye mpe abandaki kosala nionso abetaka miziki atako ba moyens ekomaki mua pasi. Force ya caractère wana e marquaki Grand Maître Franco.

Stukas ezalaki orchestre ya liboso ya munene mpe eyabana oyo Joe Issa Luambo abetaki. Kasi na kati ya Stukas ba relations na ye na Gaby Lita ezalaki vraiment kosimba malamu te. Joe Issa azalaki moto makasi mpe souvent abandaki ko défier patron na ye mpo ye mpe azalaki un vrai show man. Souvent Gaby abandaki kosepela na biloko mosusu abandaki kosala te. Soki totali malamu abandaki kolela ye te na ba nzembo ndenge abandaki kolela Lomingo. Nazali koyeba lisusu na ndule ya RENAPEC oyo Jacko Production abimisa sans autorisation ya Télé-Zaïre, ndenge a revesaki Gaby Lita na nzembo ya « Sisika Myre » ( par erreur Jacko Production apesa yango kombo « Muana Mama ») : Gaby akotaki avant Bongo Wende apesa passage. Au lieu azela a forcer kaka kokota wana. Joe Issa alakisaki que azalaki ye na regard que azalaki na contre-temps. Par contre,  kaka na nzembo wana, Lomingo abandaki ko souffler ye Joe Issa maloba ya refrain. Elakisaki que azuaki temps te ya ko répéter repertoire esengelaki babeta mokolo wana neti awutaki kokota sika.

Papy Samunga Ndembo (Pablito, professeur, commissaire de Zone) akufa na 1977. Yambo nazongela sur ba circonstances ya liwa na ye, tika naloba ete ye ayebaki guitare makasi mpe azalaki na maîtrise na yango. Samunga azali soliste ya liboso na génération oyo elandi ya Docteur Nico, oyo a marquer époque na ye na biloko ya ndenge na ndenge : abeta ba percussions ya baluba na guitare « madjimba », abeta guitare na mino, abeta ba singa likolo ya mutu ; na mokongo mpe abeta yango afanda likolo ya guitare. Samunga atikala kosala plagiat ata mbala moko te ndenge  Pépé Félix Manuaku asala na bikolo mosusu abeta. Samunga abeta ba biloko na ye na détente, abandaki mingi kosala  rappel avant akota na sebene, alelisa ba bourdons na ndenge ya kosakana te. Côté wana ezali kaka Docteur Nico na ye mutu bandaki kosakana na ebeteli wana.

Sika nameka naino kokanisa ndule oyo Stukas ebetaka na Zaiko na Foire de Kinshasa. Ndule wana ezalaka affrontement ya solo. Zaiko azalaki makasi mpe Stukas lokola. Avant ndule, Zaiko e exigeaki que yango ebeta sima ya Stukas, mpe Stukas andimaki sans problème. Jour ya ndule, Stukas aya na délégation na ye na makolo, molongo ya ba fanatiques bawuta quartier 20 mai tee na Fikin na makolo. Na tete ya maree humaine wana, Gaby Lita, Pablito Samunga, na ba musiciens nionso. Tango batu na foire bamoni ndenge Stukas akotelaki na fikin, foire eningani mpe ngulupa ya batu baye kotonda na parc d’attraction esika miziki ebandaki kobeta. Stukas ebanda miziki mbala moko. Devant public wana, Stukas ebeta sans interruption mpe  biloko Samunga abeta bilokoi ya somo mpe asala ba exhibition ya danger na repertoire nionso batandaki mokolo wana. Samunga abeta na mino !!! attaquer bango !!!, Samunga polisa ye !!! (polisa Manuaku)…na suka, Stukas ekenda na biloko ya Samunga ezalaki kobeta na mokongo.

Tango Zaiko ekoti, sans Anto Evoloko na Gina Efonge, batu babandi kobendana. Contrairement na Samunga, Manuaku azalaki piquet pendant que miso ya bato ezali koluka Evoloko na Gina. Heure wana, bango bazalaki kaka na Lemba wana epayi ya ba Gina. Tango baye, effectivement foire eninganaki, bato baye lisusu mingi mpe Zaiko eyaki kotelema mpe kobeta ndenge ya makasi.

Soki totali malamu ndule wana na cadre ya équipe, discipline mpe spectacle, Stukas ezalaki makasi mpe na coordination solide. Zaiko sans Evoloko na Gina ekokaki vraiment te. Kasi tango mibale wana baye, Zaiko ekomaki na hauteur.

Sur le plan individuel, Samunga, Suke na Gaby mpe Gina na Evoloko bazalaki likolo mpe basalaka biloko ya solo na affrontement wana.

Liwa ya Samunga ndenge nalobaki lokolo esala polémique. Na 1976, Verckys Kiamuangana apesaki professeur Samunga na Suke Bola mbongo na ba instruments mpo basala orchestre. Bayaki kosala Eyaya Bouger. Kolongwa wana eningisaki Stukas. Bitumba ebandaki kobima na miziki nionso oyo Eyaya Bouger ebandaki kobeta. Gaby  akomaki liboma mpe akomaki ko perdre raison tee na point ya ko menacer professeur Samunga de mort publiquement. Na loyenge wana, babetisi Stukas na Eyaya Bouger na foire. Professeur Samunga aya na ngulupa ya bato ebele oyo  bawutaki na ye na Ngaba. Ye abimela na sima ya foire, alata mpe akanga drap ya pembe mpe makolo ngulu. Tango ye na bato na ye bakomi na foire, esengelaki bafuta ticket, kasi na mobulu wana, esalaki ete bafungola ba portes ya minene mpo bakotisa batu wana sima ya boyokani entre bakonzi ya foire na promoteur ya ndule wana. Eyayay Bouger akota mpe abanda miziki mpe basala bilokolo esengelaki basala. Tango basilisi, Toyoki makelele ya sirène, bato bakanisi neti président Mobutu aye par surpise na foire. Na agitation wana, corbillard moko ya nuindo ya cadillac ekoti tee na parc d’attraction. Sika bato babandi komituna soki likambo nini wana lisusu ? Moke te, babimisi cercueil na ba musiciens ya Stukas bakanga ba singa ya pembe na mutu…tango babimisi cercueil boye, toyoka kaka babeti ba mbodi (canon artisanal oyo bana na kinshasa babandaki kosala na H2SO4 , acide ya batterie mpe na ba fils de fer. Mpo ebetama babandaki kotiya ba allumette na poso ya yango nionso oyo na seti mpe kotatola yango na mur) tango mbodi ebeti boye, cerceuil efonguami mpe Gaby Lita bembo abimina munduki ya Calibre 12, agangi mbala moko : “wapi ye? Wapi ye?”, kuna Bongo Wemde abandi mbala moko kosala biloko, etc.

Sima ya ndula yango, nakutana na Gaby na African Luxe, aloba na ngai que départ ya professeur Samunga etambusi ye moto.

Nionso oyo ebandaki kaka komatisa tention tee tango Ma nga (mama na Gaby) akendaski kokutana na mama na Samunga mpo balembisa ba tentions wana. Na yango, Gaby ayaki kondima sans condition retour ya baye bakendeki kasi  professeur Samunga alingaki naino apema na ndaku pendant un moment.

Tango Samunga azongi, Stukas eye kokende na Equateur na campagne électorale mpo na élections ya ba commissaires politiques. Na retour, azongaki na nzontu kolongono te, abandaki kobela makasi mpe mpasi wana eyaki komema ye. Selon ba médecins, professeur Samunga akufaki na Hépatite ekomati likolo. Kasi selon Kinshasa, ye akufaki na poisson.

Professeur Samunga azalaki kofanda na Ngaba, nazali koyena lisusu que Gaby akendaki na Zone ya Ngaba sur Kianza mpo na ko déclarer liwa na ye. Zone ya Lemba ezalaka na Bili № 02. Lopango wana ezali ya papa Colonel Josué bansenga Kamambi (ancien vice-gouverneur) ya ville de Kinshasa tango général Bangala Woto wa Ngama azalaka gouverneur. A côté ezali lopango ya papa Isangi na sima epayi ya ba Mariane Makoso (ancienne épouse ya Koffi Olomide).

Gaby alela Pablito très fort, amibamaba na nse lokola muana moke mpe amipalola bibende ya 20 makuta na nzotu mpe atiya yango na cerceuil ya Pablito mpe aloba maloba makasi : « soki ngai moto nayebi liwa na yo, zongela ngai » Sima ba interprétations esalemaki mingi na Kinshasa na bato mingi oyo bayebi degré ya nkisi oyo Stukas ebandaki kosala mpe ndenge mama na Gaby Lita azalaka nganga.

Na lisolo ya Anto Evoloko na Gaby Lita sur stratégie ya ko détrôner Zaiko, nakoloba que wana ezali kokamuisa ngai.

1. Zaiko ekendaki poto na Bruxelles mbala ya liboso na juin 1978. Gina akendaki na Isifi te puisque abandaki kobela na février 1974 (B.P.ya munu ebima ye na Ngiri-Ngiri epayi ya nganga). Azongi Zaiko na 1976, atungisamakai lisusu mpe a rater kokende na Ghana na Zaiko. Aye kolongua akeyi kosala Libanko na 1977 na ba musiciens oyo bawutaki Yoka Lokole (oyo ezali masolo misusu)…Heure Zaiko ekeyi na Bruxelles, Gina azalaki lisusu na Kinshasa te.

2. Masolo ya que soki Evoloko aye baninga babandaki kotikela ye micro ou kokata mizizki ezalaki ndenge wana te. Micro etikamana soki oyembaka nzembo wana te. Miziki etikakala kokatama te soki Evoloko akoti.

Relation entre Gaby Lita na Anto Evoloko ezalaki te. Bakokaki koyokana ndenge nini mpo balinganaka te. Nazali koba lisusu matata ezalaki kati  na bango ebanda na likambo ya Béatrice Bumba (Mbeya-Mbeya, Beyouna, Mondo). Gaby akomaki mpe kobima na ye sachant que azalaka na Anto. Yango wana ayaka kosalela ye nzembo ya Moseka bunza. Esengeli koyoka yango malamu mpo na ko comprendre attaque wana. Evoloko eyebana que asalela Beatrice ba nzembo oyo « Mbeya Mbeya, Semeki Mondo, Chérie Mbeya, Fièvre Mondo »

Na oyo etali kolongua ya Evoloko, Bozi ,Mavuela na Wemba na Zaiko, wana ezali na rapport te na Mamuaku. Au contraire, Manuaku abandaki nde ko soutenir Evokolo na indiscipline na ye.

Nakoluka ngonga ya kobeta masolo wana na bloc na biso oyo. Mpona kosilisa, nabanzi que Dodoli azalaki te na ebandeli ya Anti choc. Soliste ezalaki Matou le vilain (leki ya journaliste Pauline Kabangu Tshita). Tango Dodoli aye nde Matou akomi kobeta mi-solo mpe akomi na problème ya kosimba ba singa (etambolaki que Dodoli nde abuakaki biloko ???) A l’époque, Anti-Choc ebandaki kobeta na La Courbe na Mososo na Limete, sima ya lopango ya ba ba Jeadot mpe pembeni ya lopango ya vieux Lomboto (trouble-fête ya Imana Matiti Mabe). La courbe ezalaki na  na croissement ya victoire na université.

Ba ndeko oyo ezalaki mua kobakisa nazali na yango na mokolo ya lelo  

Musicalement,   

Emmanuel Kandolo



Avec l’autorisation de notre frère Emmanuel  Kandolo, nous allons reprendre ses prinipaux articles publiés dans Congo 2000 . Il est à noter que c’est suite à ses articles ou « lisapo » que l’idée de créer un blog réservé aux souvenirs  était née.

Messager


Bonjour Emmanuel,
J'ai lu ton dernier texte sur le Stukas même si j'ai du mal à comprendre certaines phrases. Je suis persuadé qu'à propos de la mort de Samunga, tu reconstitue assez bien les événements car des bribes de souvenirs me reviennent.
On a tous une partie de la mémoire et on va essayer de la reconstruire car nous ne disposons pas des moyens écrits pour nous rappeler ces moments passés.
Je ne vais pas trop m'étaler sur tous les détails, mais peut-être qu'on y reviendra ultérieurement.
Mais j'aimerais préciser quelques points par rapport à ce tu as écrit.
1. Gina a rejoint l'Europe après un voyage avec Evoloko alors que Gina avait rejoint celui-ci dans ISIFI. En effet,
après l'échec de Libanko, Gina a rejoint Evoloko dans ISIFI où il anotamment sorti la chanson Mizouzouzou :
(
nalamuki na tongo nakei kosula nzoto, mayi ekweli nga na moto oh oh, kombo ya mizouzou eyeli nga ah ah ! Ebele, ebele e e mama ah, ngai namona yo, nasala nini Gina, oh ebele, ebele e e mama ah, ngai namona yo nasala nini Anto oh ebele ! Tika nga nabala , oh tika ngai nabala ... etc).
La mode en cette année 78 était au voyage en Europe. Je persiste et signe : au même moment, Lengi-Lenga, Bozi, Mbuta Mashakado et Teddy Sukami ont fait le voyage pour la Belgique (la rumeur avait même raconté qu'ils ne pouvaient plus se payer le billet de retour et d'ailleurs Lengi-Lenga l'a chanté plus tard dans Belinda : "
Ngai ko na mputu, nayoki se na sango mama, ticket ebunga ngai nakoki kozonga mboka te ! ..."). Ce n'était pas Zaïko, mais juste ce groupe !!!
Au retour d'Evoloko, il a bien déclaré que Gina était révoqué de Zaïko car il s'était produit (et c'est vrai) avec des chanteurs de 2è division en Europe (sous-entendu Lengos et cie). C'est depuis ce voyage que Gina est resté en Europe ! D'ailleurs, à Lemba (
où j'habitais, avenue Kayange pour ceux qui connaissent, juste à côté de la maison de Benoit Lukunku Sampu), on racontait qu'Evoloko et Gina avait préparé le coup pour que Gina s'éloigne de son frère Georges victime des troubles mentaux, car la maladie devait passer d'un frère à l'autre, et que s'il restait, ce serait son tour !
2. Le récit que j'ai relaté nous a bien été raconté par Molunda Sho-Sho, ami, bras droit et voisin de Lita (leurs maisons étaient mitoyennes). C'est vrai que l'on peut imaginer plein de choses après, tout comme une rivalité par chansons interposées. Mais de ces rivalités, on en connaissait la superficialité. J'ai fréquenté un peu le milieu de Stukas, notamment Kembo, puis Djo Isa. J'ai ainsi assisté à la Fikin à un repas avant la confrontation entre Stukas et Isifi en 1979 : ils mangeaient et rigolaient tous ensemble alors que dans la presse, c'était la guerre ! Il faut donc se méfier des rivalités de façade.
3. On peut douter de certaines choses racontées, mais il est vrai que dans Zaïko de l'époque cavacha, après le succès d'Eluza'm, Mbeya-Mbeya, etc., aux concerts, Evoloko arrivait tard avec beaucoup de remous, la musique s'arrêtait et comme il ne chantait plus avec Nyoka et Bimi, ceux-ci quittaient le podium. Tous les gens qui assistaient aux concerts à cette époque peuvent en témoigner ! Même Evoloko, lui-même, l'a rappelé lors de la brouille qui a suivi la création de Langa-Langa Stars.
En 1974, c'est seul Evoloko qui a été évincé de Zaïko ! Bozi, Mavuela et Wemba l'ont suivi par solidarité ! Et c'est Manuaku , en tant que chef d'orchestre à cette époque, qui alui a signifié son renvoi. Et Evoloko lui a répondu : "Ngai pe na revoquer yo !".
Je ne désespère pas que les protagonistes de l'histoire nous apporteront un jour leurs lumières, et pourquoi pas sur cet espace de mbokamosika.com.
A bientôt

Je continue de lire ton article et il y a un autre point sur lequel je voudrais revenir. C'est à propos de Pépé Felly.
Autant je ne peux qu'être d'accord avec toi sur les qualités extraordinaires du Professeur Samunga, autant je trouve injuste, très injuste que tu parles de plagiat à propos de Pépé Felly.
Pépé a été et restera le guitariste qui a révolutionné la musique congolaise et tout ce qui se fait aujourd'hui ne peut être que copie de son oeuvre.
Evoloko a d'ailleurs déclarer une fois : "Il est impossible depuis qu'un guitariste congolais soit original car tout a déjà été inventé par Pépé Manuaku".
Pépé Felly a essayé tout au long de sa carrière d'apporter des sons nouveaux à la musique congolaise. Ses nombreuses recherches l'ont conduit à explorer des rythmes et sons venus de l'intérieur et d'ailleurs. C'est ce que font les grands artistes dans tous les domaines. Et cela a beaucoup apporté à la musique congolaise. Bob Marley ne s'est pas contenté de jouer du ska (rythme original de la Jamaïque), il y a ajouté un peu de rock. Tout comme le reggae a eu des apports diverses pour devenir ce qu'il est : jamaïcain !
Quand Le professeur Samunga ou BoJack jouent la guitare avec les dents ou dans le dos, ils ont vu Jimi Hendrix le faire, ils ont aimé, ils ont voulu le faire également car ils s'en sentaient capables. Mais ils ne plagient pas Jimi Hendrix.

Antoine NICKEL


Je salue d'abord Emmanuel Kandolo pour son grand retour dans ce Blog.
Je peux ajouter quelques details sur le bio de Gina Wa Gina.
Gina avait officiellement rejoint ( apres ses problemes de sante) le ZAIKO LL en Juin ou Juillet 1976 apres le voyage de ZAIKO au GHANA. Ce voyage avait eu lieu en avril ou mai 76. 

Il quittera ZAIKO en Mai 1977 pour creer le Tout Grand LIBANKO. Ce Libanko etait d'abord un Zong-Zing entre lui et BOZI, apres le depart de ce dernier de YOKA LOKOLE. On doit noter GINA n'avait pas declare d'emblee son depart de ZAIKO, et BOZI prenait cette collaboration comme une sorte de Zing-Zong. Certainement qu'entre eux deux, ils savaient qu'un orchestre etait en gestation. Quand il deviendra clair pour DV MUANDA que Gina s'eloigne de ZAIKO, le meme DV embauchera BOZI juste avant le depart de Zaiko pour le maquis a Nsele en Mai ou Juin 1977.
Une note: on a rarement fait mention du role de DV MUANDA dans la destabilisation des orchestres crees par des vedettes de ZAIKO.
GINA creera ainsi son LIBANKO sans BOZI, avec des parfaits inconnus comme SHIMITA, JO F et autres.
D'apres mes analyses, GINA WA GINA (le binome d'Evoloko dans ZAIKO) avait verse dans la precipitation pour contrer le grand succes inattendu de Papa Wemba.
A une epoque ou meme le ZAIKO LL prenait la route du maquis, a cause du phenomene Viva-La-Musica, le Tout Grand Libanko ne tiendra pas longtemps. Debut 1978, Wa GINA prend alors une courageuse decision de rejoindre EVOLOKO dans ISIFI MELODIA. Ils vont composer quelques jolies chansons dans cet ISIFI.

La meme annee 1978, le ZAIKO LL fait son premier voyage en Europe avec le BOZI, MBUTA MASHAKADO, PEPE MANUAKU, NYOKA JOSSART, LIKINGA, LENGI-LENGA et tout le groupe.
A leur retour d'Europe, on se rappelle les "BA BISCUITS BOZUA..." de BOZI BOZIANA.
En 1978 aussi, EVOLOKO et GINA vont faire une tournee en Europe. Je doute que ca avait coincide avec le voyage de ZAIKO. On sait que GINA WA GINA ne reviendra pas au pays au terme de cette tournee Europeenne de ces deux Leaders d"ISIFI. A son retour, EVOLOKO dira que GINA azali lisusu na mouvement te. Il peut avoir utilise le terme "REVOQUER", mais en LINGALA DES KINOIS ca revient au meme.   

Dodo


Na Ndeko Emmanuel Kandolo pe na bandeko banso oyo batangaka blog na biso,mbote na bino banso.
Solo Ndeko, na manso oyo owutaki kokoma lobi  na maye matali masolo ya ba alanga nzembo pe ekoleli ya miziki na biso,na kombo nangai natondi yo botondi pe na moni ete ozali bibliothèque limbisa ngai po nyebi kotia bibliothèque na lingala te.O zongisi eloko inso na esika na yango pe makambo misusu na yebaka te to penza malamu te na ye ko yeba yango.Esengo na ngai ekozala ete bokoba na mosala oyo bozali kosala po manso okomaki ezali lolenge moko te na oyo toyokaka na ba matanga to na ba nganda.Nzambe abatela yo na maye manso ozali kosala.Mokolo elamu na yo.Wa bino ndeko Michel-Kinzonzi.



NDEKO EMMANUEL KANDOLO mbote mingi nasepeli mingi na b'informations na yo kasi opesi nga pasi pe mawa tango osilisi manwaku valeur penza...PEPE FELLY azali INOVATEUR,yoka ba nzembo nionso kobanda na MOSINZO,ELUZAM,YUDASI,NDONGE,YO NA LINGA ETC....liste ezali penza molayi...biloko ya sika ezalaki toujours...soki ozali ko se rappeler na 1977 tango manwaku na RAY LEMA basanganaki na le ya tupas omonaki biloko ya sika na ba nzembo lokola IMA(BIMI),SENTIMANT AWA(JOSSART),PACHA LABARANT(TEDDY SUKAMI), OYOKAKI BILOKO?...meme jossart a reconnu que samunga azalaki un tres bon soliste,vu encore azalaki oiseau rare puisque azalaki GAUCHER,c'est qui etait et qui est encore tres rare meme actuellement ko trouver soliste oyo abetaka na loboko ya muasi to gauche......PONA LIBANKO nakobakisa kaka mua moke; na 1978 GINA a abandonaki ba musiciens nionso na kisangani apres tournee na haut zaire,parmi bango MONZA PREMIER(1956-1990rip) azalaki na kati pe na chanteur moko na kombo ya djo batali(akufa deja).ba musiciens ya libanko batekaki biloko nionso bazalaki na yango(sapato,elamba)po bazua tickets ya kozonga kinshasa...tango bakomi kin,bayaki kosala orchestre na bango na kombo ya BANKO BANKO na fin 1978 avec comme chanteur principal DJO BATALI(dcd rip),wana monza nde ayaki kokende na ye na poto ko continuer b'etudes po azalaki mayele na classe penza....kasi banko banko ewumelaki te ekufaki quelques mois apres sortie na bango na lemba.....pona stukas SOLISTE KEMBO L'HOMME INVISIBLE AKENDAKI NA YE KOFANDA NA LUANDA(ANGOLA)NA 1980...MWAN'EKANGA nde a remplacaki ye,pe na soliste DODOLI oyo awutaki na BANSOMI LAY LAY ya MASINA.  tala kaka ba mbula eleki mingi,ba details misusu nabosani....

Sonny Mokonzi


Merci SONNY pour les details de plus sur LIBANKO. Djo Batali, et MONZA 1er, on les a decouvert dans le Libanko. Dommage que Jo Batali est deja decede. C'etait un gars interessant, muana Lemba.
C'est regrettable que Wa Gina n'a jamais valorise Lemba comme sa base naturelle. Mais en fait, ce n'etait pas a la mode. La mode, c'etait d'abord KALINA, puis MATONGE avec l'ere ZAIKO. Meme le "Wafania" ou "Nandendeli ya YOLO" d'EVOLOKO ne feront pas le poids.
On se rappelle meme le " KIN ESUKA NA MAYI A NDJILI" de WEMBA aux bana ndjili dans un concert de VIVA.
Comme KOFFI OLOMIDE, les STARS issus de Lemba sont connus pour leur orgueil. Quand GINA allait prendre son taxi pour un concert, c'est tout un cortege qui s'ebranlait en trombe dans les rues de Lemba. Il ne fallait surtout pas l'arreter. Quand il se relaxait devant leur maison familial ou au coin coin de la rue, il n'etait pas approchable par les simples passants. Wemba l'avait bien compris, en democratisant le statut de vedette.
Aujourd'hui, que des choses ont change. WAZEKUA est vedette de Matete. Les NDJILI, MASINA, MIKONDO, NSELE sont devenus frequentables par toutes les grandes vedettes du moment. Autres temps, autres moeurs.

Dodo


Je me rappelle encore de la mésaventure de Libanko en cette fin des années '70. L'orchestre était parti à Mbandaka (ou Kisangani) pour la campagne électorale d'un candidat.

Gina, le responsable du groupe, s'appropria TOUTE le recette de la tournée et abandonna tous ses musiciens dans la nature !!!!!

Ils furent obligés de vendre tous leurs biens et de recourir à la bonne volonté des personnes trouvées sur place pour pouvoir rentrer à Kinshasa !!!

Parmi eux, il y avait outre Monza 1er et Djo Batali, également le soliste Pépé Mavakal, le chanteur Djo F, le bassiste Bibi ,le frèré-aîné de feu Riva Menga (tous fils de Mukuna, Dieu sur terre pour ses adeptes!)

Je suis un natif de Lemba sur la rue Mfidi et le Libanko était notre mouv' du quartier comme on le disait, à part le Zakama, l'orchestre Famous...etc

Kim( Bruxelles)

Par Messager - Publié dans : musique
Ecrire un commentaire - Voir les 10 commentaires - Recommander
Retour à l'accueil
 
blog gratuit sur over-blog.com - Contact - C.G.U. - Rémunération en droits d'auteur - Signaler un abus